Mpo na nini kimya ezali kokɔta na mokili te?
Eyano ya Biblia
Milende oyo bato bazali kosala mpo na kokɔtisa kimya na mokili ezali kolonga te mpe ekolonga te mpo na ntina mingi:
“Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Bato bakelamaki te na likoki to lotomo ya komiyangela; na yango bakolonga te kotya kimya oyo ekoumela.
“Bótyela bankumu motema te, to mwana ya moto ya mabele te, mpo akoki kobikisa te. Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Nzembo 146:3, 4) Bakonzi ya mokili, ata baoyo bazali na makanisi ya malamu, bakokoka te kolongola libela makambo oyo ebimisaka bitumba.
“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala . . . bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo.” (2 Timote 3:1–4) Tozali na “ntango ya nsuka” ya mokili oyo mabe, ntango oyo bizaleli ya bato ezali kosala ete kimya ezala te.
“Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Zabolo, monguna ya Nzambe, abwakamá zingazinga ya mabele mpe atindaka bato bálanda bizaleli mabe na ye. Soki kaka ye nde azali “mokonzi ya mokili oyo,” kimya ekozala ata moke te.—Yoane 12:31.
“[Bokonzi ya Nzambe] ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso [oyo etɛmɛlaka Nzambe], mpe ekotikala seko.” (Danyele 2:44) Ezali Bokonzi ya Nzambe, kasi guvɛrnema ya bato te, nde ekokokisa mposa na biso ya kofanda na mokili oyo ezali na kimya ya solosolo, oyo ekoumela libela.—Nzembo 145:16.