Biblia elobi nini na likambo etali kosunga baboti oyo bakómi mibange?
Eyano ya Biblia
Bana oyo bakoli bazali na mokumba monene ya kosala ete baboti na bango oyo bakómi mibange bázala na nyonso oyo basengeli na yango. Biblia elobi ete bana oyo bakoli basengeli “koyekola liboso mpenza komemya libota lya bango moko mpe kozongisela baboti bolamu bazwaki na bango . . . , yango ekosepelisa Nzambe.” (1 Timote 5:4, Biblia Liloba lya Nzambe) Ntango bana oyo bakoli basalaka ete baboti na bango oyo bakómi mibange bázala na nyonso oyo basengeli na yango, batosaka mpe etinda ya Biblia oyo esɛngi bana bákumisaka baboti na bango.—Baefese 6:2, 3.
Biblia epesi mibeko ya sikisiki te mpo na ndenge oyo bana basengeli kosunga baboti na bango oyo bakómi mibange. Kasi, epesi bandakisa ya basi mpe ya mibali ya kondima oyo basungaki baboti na bango. Epesi mpe toli oyo ebongi mpenza oyo ekoki kosalisa baoyo bazali na mokumba ya kosunga baboti oyo bakómi mibange.
Ndenge nini na ntango ya kala bato mosusu na mabota basungaki baboti na bango oyo bakómaki mibange?
Basalaki yango na ndenge mingi, na kotalela makambo oyo ekómelaki bango na bomoi.
Yozefe afandaki mosika na Yakobo, tata na ye oyo akómaki mobange. Ntango Yozefe azalaki na likoki, asalaki ete Yakobo aya kofanda pene na ye. Na nsima Yozefe apesaki tata na ye esika ya kofanda, bilei mpe abatelaki ye.—Ebandeli 45:9-11; 47:11, 12.
Ruta akendaki kofanda na mboka ya mama bokilo na ye mpe asalaki mosala makasi mpo na kobatela ye.—Ruta 1:16; 2:2, 17, 18, 23.
Yesu, mwa moke liboso akufa, aponaki moto moko oyo akobatela Maria, mama na ye, oyo ntango wana emonani lokola mobali na ye así akufaki.—Yoane 19:26, 27. a
Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa baoyo bazali na mokumba ya kosunga baboti oyo bakómi mibange?
Biblia etondi na toli oyo ekoki kosalisa baoyo bazali na mokumba ya kosunga baboti oyo bakómi mibange, atako mbala mingi mokumba yango elɛmbisaka nzoto mpe ebimisaka mitungisi mingi.
Kumisá baboti na yo.
Oyo Biblia elobi: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.”—Kobima 20:12.
Ndenge nini okoki kosalela toli yango?: Soki ozali kotika baboti na yo básalaka makambo mosusu bango moko na kotalela makoki na bango, ekomonisa ete ozali kokumisa bango. Soki likoki ezali, tikáká bango básalaka makambo mosusu bango moko mpe salisá bango epai makoki na bango esuki mpo na komonisa ete ozali kokumisa bango.
Omityaka na esika na bango mpe limbisáká.
Oyo Biblia elobi: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.”—Masese 19:11.
Ndenge nini okoki kosalela toli yango?: Soki moboti oyo akómi mobange alobi likambo moko ya kozanga boboto to emonani ete azali kosepela te na ndenge ozali kosalela ye makambo, omituna boye: ‘Soki ngai nde nazalaki mobange nalingaki koyoka ndenge nini na mitungisi ya bobange?’ Soki ozali kosala makasi mpo na komitya na esika na ye mpe kolimbisa ye, ekoki kosala ete bózala na matata mingi te.
Lukáká toli epai ya basusu.
Oyo Biblia elobi: “Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te, kasi ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”—Masese 15:22.
Ndenge nini okoki kosalela toli yango?: Luká koyeba lisalisi nini ya monganga ekoki kosimba mpo na mikakatano ya sante oyo baboti na yo bakoki kozala na yango. Luká koyeba bibongiseli nini bazwá na mboka oyo ofandi mpo na kosunga bato oyo bakómi mibange oyo ekoki kosalisa yo. Sololá na bato mosusu oyo babatelaki mpe baboti na bango oyo bakómaki mibange. Soki ozali na bandeko, bósolola na libota mpo na koyeba bamposa ya baboti na bino, ndenge ya kosunga bango, mpe ndenge ya kokabola mikumba.
Yebá esika makoki na yo esuki.
Oyo Biblia elobi: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.”—Masese 11:2.
Ndenge nini okoki kosalela toli yango?: Yebá esika makoki na yo esuki. Na ndakisa, tosalaka makambo na kotalela ntango mpe likoki oyo tozali na yango. Koyeba yango, ekoki kosala ete osunga baboti na yo na kolanda makoki na yo. Soki omoni ete ekómeli yo kilo mpo na kosunga baboti na yo oyo bakómi mibange, okoki kosɛnga lisalisi epai ya bandeko mosusu ya libota to bato oyo basalaka na bandako oyo babatelaka mibange.
Kobosana te bamposa na yo moko.
Oyo Biblia elobi: “Mpo ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.”—Baefese 5:29.
Ndenge nini okoki kosalela toli yango?: Atako ozali na mokumba ya kosunga baboti na yo, osengeli mpe kokokisa bamposa na yo moko mpe ya bato ya libota na yo soki obalá. Yo mpe ozali na mposa ya kolya malamu. Osengeli kopema mpe kolala na ndenge ebongi. (Mosakoli 4:6) Osengeli mpe kozwa konje soki esengeli. Soki osali bongo, okozala na likoki ya kosunga malamu baboti na yo.
Biblia elobeli mpenza na bosikisiki ndenge oyo bana basengeli kosunga baboti oyo bakómi mibange?
Biblia epesi mibeko ya sikisiki te mpo na ndenge oyo bana basengeli kosunga baboti na bango oyo bakómi mibange. Mabota mosusu esepelaka kofanda esika moko na baboti na bango oyo bakómi mibange. Bamosusu, bakoki komona malamu ete baboti bákende kofanda na bandako oyo babatelaka mibange. Bato ya libota bakoki kosolola mpo na koyeba esika oyo ebongi mpenza mpo baboti na bango báfanda.—Bagalatia 6:4, 5.
a Mpo na lisolo yango, moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi boye: “Ekoki kozala ete Yozefe, mobali ya Maria esí akufaki kala, mpe ete Yesu nde akómaki kosalisa Maria, sikoyo awa Yesu akómi pene na liwa, Maria alingaki kosuka ndenge nini? . . . Awa Kristo apesi bana liteya ya kosunga baboti oyo bakómi mibange.”—The NIV Matthew Henry Commentary in One Volume, nkasa 428-429.