Sanduku ya kondimana ezali nini?
Eyano ya Biblia
Sanduku ya kondimana ezalaki kɛsi moko mosantu oyo Bayisraele basalaki na kolanda malako oyo Nzambe apesaki Batyaki na kɛsi yango “litatoli” to bitanda mibale ya mabanga oyo ezalaki na Mibeko Zomi.—Kobima 25:8-10, 16; 31:18.
Ndenge basalaki yango. Sanduku yango ezalaki na bolai ya mapeko mibale na ndambo (111 cm), bonene na yango ezalaki lipeko moko na ndambo (67 cm) mpe bosanda lipeko moko na ndambo (67 cm). Basalaki yango na nzete ya akasia, mpe bapakolaki yango wolo na kati mpe na libándá mpe batyaki liyemi moko ya kitoko zingazinga na yango. Basalaki ezipeli na yango na wolo mpe batyaki bakeruba mibale ya wolo na nsuka mokomoko ya ezipeli yango. Bilongi ya bakeruba yango ezalaki kotala ezipeli yango mpe mapapu na yango ezalaki ya kotombwana mpe ezipi ezipeli yango. Batyaki mpɛtɛ minei ya minene ya wolo na ngámbo minei ya makolo ya sanduku. Bakɔtisaki nzete mibale ya akasia oyo bapakolá wolo na madusu ya mpɛtɛ yango mpo na komema sanduku yango.—Kobima 25:10-21; 37:6-9.
Esika batyaki yango. Liboso batyaki sanduku yango na Esika oyo Eleki Bosantu ya tabernakle to hema ya losambo, oyo basalaki yango nzela moko na sanduku mpe bazalaki komema hema yango. Banganga-nzambe mpe bato bazalaki komona Esika oyo Eleki Bosantu te. (Kobima 40:3, 21) Kaka nganga-nzambe monene nde azalaki kokɔta kuna mbala moko na mbula na mokolo ya kozipa masumu mpe azalaki komona sanduku yango. (Balevi 16:2; Baebre 9:7) Na nsima, batyaki sanduku yango na Esika oyo Eleki Bosantu na tempelo ya Salomo.—1 Bakonzi 6:14, 19.
Ntina na yango. Bazalaki kobomba biloko mosantu oyo ezalaki kosalisa Bayisraele bábosana te kondimana to boyokani oyo Nzambe asalaki na bango na Ngomba Sinai. Sanduku yango ezalaki mpe na ntina mingi na molulu oyo ezalaki kosalema na mokolo ya kozipa masumu.—Balevi 16:3, 13-17.
Biloko batyaki na kati. Biloko ya liboso oyo batyaki na sanduku yango ezalaki bitanda ya mabanga oyo ezalaki na Mibeko Zomi. (Kobima 40:20) Na nsima batyaki mpe elokó ya wolo oyo ezalaki na mana mpe “lingenda ya Arona oyo ebimisaki fololo.” (Baebre 9:4; Kobima 16:33, 34; Mitángo 17:10) Emonani ete na ntango moko boye, elokó mpe lingenda ezalaki lisusu te ntango bamemaki sanduku na tempelo.—1 Bakonzi 8:9.
Ndenge bazalaki komema yango. Banzete mibale ya akasia oyo batyaki na sanduku yango ezalaki kosalisa Balevi bámema yango na mapeka. (Mitángo 7:9; 1 Ntango 15:15) Banzete yango ezalaki kotikala kaka na sanduku yango mpe na ndenge wana Balevi bakokaki te kosimba sanduku. (Kobima 25:12-16) Ntango bazalaki komema sanduku yango, bazalaki kozipa yango na “rido oyo ezipaka” oyo ekabolaki Esika Mosantu mpe Esika oyo Eleki Bosantu.—Mitángo 4:5, 6. a
Sanduku yango ezalaki komonisa nini? Ezalaki komonisa ete Nzambe azali elongo na bango. Na ndakisa, lipata oyo ezalaki komonana likoló ya sanduku na Esika oyo Eleki Bosantu mpe na kaa ya Bayisraele ezalaki elembo oyo emonisaki ete Yehova azali na bango mpe azali kopambola bango. (Balevi 16:2; Mitángo 10:33-36) Biblia elobi mpe ete Yehova “afandi likoló ya bakeruba” mpo na kolobela bakeruba mibale oyo bazalaki likoló ya ezipeli ya sanduku. (1 Samwele 4:4; Nzembo 80:1) Bakeruba yango bazalaki “bililingi ya likalo” ya likalo ya Yehova. (1 Ntango 28:18) Lokola sanduku ezalaki komonisa ete Yehova azali na bango, yango wana Mokonzi Davidi akomaki ete Yehova “azali kofanda na Siona” ntango bamemaki sanduku yango kuna.—Nzembo 9:11.
Ndenge bazalaki kobenga yango. Biblia ebengi sanduku yango na bankombo mingi, na ndakisa “sanduku ya litatoli,” “sanduku ya kondimana,” “sanduku ya Yehova” mpe “Sanduku ya makasi [ya Yehova].”—Mitángo 7:89; Yosua 3:6, 13; 2 Ntango 6:41.
Bazalaki kobenga ezipeli ya sanduku yango “ezipeli ya kozipa masumu,” to “ebonga ya mawa.” (1 Ntango 28:11; Haut fleuve) Ebengeli yango emonisi valɛrɛ oyo ezipeli wana ezalaki na yango na mokolo ya kozipa masumu, ntango nganga-nzambe monene azalaki komwangisa makila ya mbeka ya banyama na ezipeli yango. Ndenge nganga-nzambe azalaki komwangisa makila bongo, ezalaki kozipa masumu “na ye moko mpe ya ndako na ye mpe ya lisangá mobimba ya Yisraele.”—Balevi 16:14-17.
Sanduku ya kondimana ezali tii lelo?
Eloko moko te emonisi ete sanduku yango ezali tii lelo. Biblia emonisi ete sanduku yango ezali lisusu na ntina te mpo kondimana oyo esalaki ete sanduku yango ezala elongwaki mpe na esika na yango ekómaki “kondimana ya sika” oyo esalemaki na nzela ya mbeka ya Yesu. (Yirimia 31:31-33; Baebre 8:13; 12:24) Kutu Biblia elobelaki ntango oyo sanduku ya kondimana ekozala lisusu te, ata bongo basaleli ya Nzambe bakolela yango te.—Yirimia 3:16.
Ntango kondimana ya sika esalemaki, na nsima ntoma Yoane amonaki sanduku yango na likoló na emonaneli oyo azwaki. (Emoniseli 11:15, 19) Sanduku yango ya elilingi ezali komonisa ete Nzambe azali na kondimana yango mpe azali kopambola yango.
Sanduku yango nde ezalaki kosala ete bálonga bitumba?
Te. Sanduku yango te nde ezalaki kosala ete bálonga. Na ndakisa, Bayisraele bazalaki na sanduku yango na kaa na bango ntango babundaki na engumba Ai kasi balongaki te mpo moto moko ya Yisraele azangaki bosembo. (Yosua 7:1-6) Na nsima, Bafilistia balongaki bango atako bamemaki sanduku yango na esika ya bitumba. Balongaki te mpo na mabe ya Ofini ná Fineasi oyo bazalaki banganga-nzambe. (1 Samwele 2:12; 4:1-11) Bafilistia babɔtɔlaki sanduku yango, kasi Nzambe abimiselaki bango bampasi tii ntango bazongisaki yango na Yisraele.—1 Samwele 5:11–6:5.
Mobu (L.T.B) |
Esalemaki |
---|---|
1513 |
Bezalele ná moninga na ye nde basalaki yango na biloko oyo Bayisraele bapesaki.—Kobima 25:1, 2; 37:1. |
1512 |
Moize nde asalaki milulu mpo na kobanda kosalela yango ná tabernakle mpe milulu ya bonganga-nzambe.—Kobima 40:1-3, 9, 20, 21. |
1512—Nsima ya mobu 1070 |
Bamemaki yango na bisika ndenge na ndenge.—Yosua 18:1; Basambisi 20:26, 27; 1 Samwele 1:24; 3:3; 6:11-14; 7:1, 2. |
Nsima ya mobu 1070 |
Mokonzi Davidi amemaki yango na Yerusaleme.—2 Samwele 6:12. |
1026 |
Bamemaki yango na tempelo ya Salomo na Yerusaleme.—1 Bakonzi 8:1, 6. |
642 |
Mokonzi Yosiya azongisaki yango na tempelo.—2 Ntango 35:3. b |
Liboso ya mobu 607 |
Emonani lokola ezalaki lisusu te na tempelo. Batángi yango te na biloko oyo ekendaki na Babilone na mobu 607 LTB ntango tempelo ebebisamaki, batángi yango mpe te na biloko oyo ezongaki na Yerusaleme.—2 Bakonzi 25:13-17; Ezera 1:7-11. |
63 |
Ntango Pompey, mokonzi ya basoda ya Roma abɔtɔlaki Yerusaleme mpe akɔtaki na tempelo na Esika oyo Eleki Bosantu alobaki ete sanduku yango ezalaki te. c |
a Bayisraele bazalaki kokutana na makama soki batosi te mibeko na Nzambe oyo etalaki ndenge ya komema mpe kozipa sanduku.—1 Samwele 6:19; 2 Samwele 6:2-7.
b Biblia elobeli te ntango, ntina mpe moto oyo alongolaki yango.
c Talá buku The Histories ya Tacite, Book V, paragrafe 9.