Yerusaleme ya Sika ezali nini?
Eyano ya Biblia
Maloba “Yerusaleme ya Sika” oyo ezali na bisika mibale na Biblia, ezali engumba ya elilingi oyo ezali komonisa etuluku ya bayekoli ya Yesu oyo bakokende likoló mpo na koyangela elongo na ye na Bokonzi ya Nzambe. (Emoniseli 3:12; 21:2) Biblia emonisi ete etuluku yango ekoki mpe kobengama mwasi ya Kristo.
Ndenge ya koyeba Yerusaleme ya Sika
Yerusaleme ya Sika ezali na likoló. Mbala nyonso oyo Biblia elobelaka Yerusaleme ya Sika, emonisaka yango ezali kouta na likoló epai baanzelu babatelaka baporte ya engumba yango mpe ezali kokita. (Emoniseli 3:12; 21:2, 10, 12) Lisusu, engumba yango ekoki kozala awa na mabele te mpo eleki monene mpenza. Ezali karé mpe monene na yango ezali “setade nkóto zomi na mibale (12 000)” bipai nyonso. a (Emoniseli 21:16) Mipanzi na yango ekoki kozala molai ya kilomɛtrɛ soki 560, mpe ezingi etando.
Mwa etuluku ya bayekoli ya Yesu nde basali Yerusaleme ya Sika, mwasi ya Kristo. Yerusaleme ya Sika ebengami “mwasi ya libala, mwasi ya Mwana-Mpate.” (Emoniseli 21:9, 10) Ndenge balobeli Yerusaleme yango emonisi ete Mwana-Mpate ezali Yesu Kristo. (Yoane 1:29; Emoniseli 5:12) “Mwasi ya Mwana-Mpate,” mwasi ya Kristo, ezali bakristo oyo bakozala elongo na Yesu na likoló. Biblia emonisi ete boyokani ya Yesu ná bakristo wana ezali lokola boyokani ya mwasi ná mobali. (2 Bakorinti 11:2; Baefese 5:23-25) Lisusu, mabanga ya moboko ya Yerusaleme ya Sika ekomami na “bankombo ya 12 ya bantoma ya Mwana-Mpate.” (Emoniseli 21:14) Makambo mikemike oyo balobeli esalisi biso tóyeba soki Yerusaleme ya Sika ezali mpenza nini mpo bakristo oyo babengami mpo na kokende likoló ‘batongami likoló ya moboko ya bantoma mpe basakoli.’—Baefese 2:20.
Yerusaleme ya Sika ezali na kati ya guvɛrnema. Yerusaleme ya kala ezalaki mboka-mokonzi ya Yisraele, esika Mokonzi Davidi, mwana na ye Salomo, mpe bakonzi mosusu ya libota na bango bafandaki “na kiti ya bokonzi ya Yehova.” (1 Ntango 29:23) Na yango, Yerusaleme oyo ebengamaki “engumba mosantu,” ezalaki komonisa Bokonzi ya Nzambe oyo bato ya libota ya Davidi bazalaki koyangela. (Nehemia 11:1) Yerusaleme ya Sika, oyo ebengami mpe “engumba mosantu,” esalemi na baoyo bakokende na likoló mpo na kozala elongo na Yesu mpe “bakoyangela mabele.”—Emoniseli 5:9, 10; 21:2.
Yerusaleme ya Sika ekomemela bato mapamboli awa na mabele. Biblia elobeli Yerusaleme ya Sika lokola nde ezali ‘kouta na likoló epai ya Nzambe ezali kokita,’ yango emonisi ete Nzambe azali kosalela yango mpo na kobongisa makambo na likoló te, kasi nde na mabele. (Emoniseli 21:2) Maloba yango emonisi ete Yerusaleme ya Sika ezali na boyokani ná Bokonzi ya Nzambe, oyo Nzambe azali kosalela mpo na kokokisa mokano na ye “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Mokano ya Nzambe mpo na bato awa na mabele ekomema mapamboli oyo:
Lisumu ekolongwa. “Ebale moko ya mai ya bomoi” ezali kouta na Yerusaleme ya Sika mpe ezali kosopana na “banzete ya bomoi” oyo ezali “mpo na kobikisa bikólo.” (Emoniseli 22:1, 2) Kobikisama yango na elimo mpe na nzoto ekosala ete masumu elongwa mpe bato bázongela bomoi ya kokoka ndenge Nzambe akanaki na ebandeli.—Baroma 8:21.
Bato bakozala na boyokani ya malamu na Nzambe. Lisumu ekabolá bato ná Nzambe. (Yisaya 59:2) Soki lisumu elongwe, esakweli oyo ekokokisama mpenza na mobimba: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango.”—Emoniseli 21:3.
Bampasi mpe liwa ekosila. Na nzela ya Bokonzi na ye, Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Emoniseli 21:4.
a Setade ezalaki mezire oyo Baroma bazalaki kosalela mpo na koyeba molai ya eloko; ezalaki na molai ya mɛtrɛ 185.